Bato 11 ya siansi ya nikleere ya États-Unis oyo bazali kosala mosala moko ya sekele mingi balimwi to bakufi na ndenge ya kobombama.
Balukiluki 11 ya siansi ya nikleere, ya aérospatiale mpe ya NASA, oyo basalaki mosala moko ya sekele mingi, bazalaki na makambo oyo ebombami mpenza. Yango ememaki Congrès ya U.S. lundi (20 avril) kosakola bolukiluki ya nokinoki. Momonisi ya Missouri Eric Burlison apesaki likanisi ete ezalaki mosala oyo Russie, Chine to Iran esalaki na boyokani. Maison Blanche ebimisi liyebisi ya nokinoki ete bibongiseli ndenge na ndenge ya mbulamatari, kati na yango FBI mpe Pentagone, ezali kolukaluka likambo liye.
Zulunalo Daily Mail eyebisaki lundi (20 avril) ete James Comer, mokambi ya Comité ya ndako ya maponami mpo na bokengeli mpe mbongwana ya gouvernement, abimisaki mokanda na ba agences ndenge na ndenge lundi (20) mpo na kopesa bango mitindo ete babimisa sango kino le 27 avril. Mokanda yango elobaki, na ndambo:
“Commission ya bokengeli mpe ya mbongwana ya ndako ya maponami ezali kolukaluka balapolo oyo endimami te ya kolimwa mpe liwa ya kobombama ya bato oyo bazali na likoki ya kozwa makambo ya ntina mingi ya siansi ya États-Unis,”
abakisaki ete, “Balapolo yango emonisi ete ata bato 10 oyo bazali na boyokani na basekele ya nikleere to mayele ya bafusée ya États-Unis bakufi to balimwaki na ndenge ya kobombama na bambula oyo euti koleka.”
Comer akobaki ete, “Soki balapolo yango ezali solo, liwa to kolimwa ya ndenge wana ekoki kozala likama mpo na libateli ya États-Unis mpe mpo na bakonzi ya Amerika oyo bazali na likoki ya kozwa basekele ya siansi.”
Newsweek eyebisi lisusu ete atako congrès ya Missouri Eric Burlison, républicain oyo asakolaki ete akosala elongo na ba démocrates mpo na kosala ete FBI esala bolukiluki na likambo liye lundi (20), abakisi ba experts mibale mosusu ya Amerika, Matthew Sullivan mpe Dr. Ning Li, ya Amerika ya Azia, na liste ya baye bazali na bolukiluki.
A commentaki que modèle ya disparition to liwa ya ba scientifiques américains baye, oyo ekomi sujet ya masolo na internet, ekoki kozala... « Operations étrangères » .
“Tozali kopota mbangu na Chine, Russie, mpe Iran na mayele ya nikleere, bibundeli ya sika, mpe na etando, nzokande bato na biso ya siansi oyo baleki mayele bazali kolimwa,” Berlinson akomaki na Plateforme X.
Abakisaki ete, “Oyo etondi na bilembo ya misala ya bapaya, oyo nazali kosala elongo na ba démocrates mpe ba républicains na ngai mpo na kosala ete FBI ekɔta mobimba na yango.Oyo ezali bipartisan te.” Newsweek eyebisaki yango.
No comments:
Post a Comment